letras.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

letra de 1 jour - mike kalambay

Loading...

oy’olobi nkolo nanga
eko kokisama na bomoi nanga
ata lelo te ooh na yebi mokolo ezali
ba nguna nanga bako kufa na soni
po yo nzambe nanga na yebi oko
kosaka te
oza na nguya yako pesa bomoi
aah na nzoto toyo solo kufa ezalie
oza lisusu na makoki yako pesa lobika
ah bipayoyo maladie elieli nzoto
nani’aza lokola yo, yawhe
nkolo nani’akokani nayo
nga na moni te
ah lelo moninga azui mosala
azui libala aboti bana
yanga motema simba elikwa
oyo azui eza yaye
asilisi pe na dépôt ya nzambe
na tango ezali yanga ekoya
na yebi epa na nzambe nanga
mosala ezali, eloko pamba
libala ezali biloko pamba
bana bazali biloko pamba
mbongo ezali biloko pamba
voyage ezali eloko pamba
ya motuya to simba yesu
ya motuya to simba yesu
oooh oooh ooooh

lelo mosusu azui ba mbongo
asombi mituka atongi ba ndako
motema nanga simba elikwa
oyo azui eza yaye
asilisi pe na magasin ya nzambe
au temps fixé yanga eko ya
na yebi epa ya nzambe oyo yanga
mbongo ezali eloko pamba
mituka ezali na tina te
mapangu ezali eloko pamba
bomengo ezali eloko pamba
nionso ezali eloko pamba
ya motuya to simba yesu
ya motuya to simba yesu
obongo nga na tika yesu oyo yanga
oyo nzambe asali na bomoi nanga
muana, ata lelo te un jour eko lata nzoto
aza sembo na maloa naye nzambe oyo
oyo alobi suka suka eko kokisama
na bomoi nanga
eeh papa losambo nanga eeh
obomba nga pembeni na maboko nayo
opesa lolenge olingi nga na salela yo
ata bozui to bozangi nga na talelayo
po oza nzambe nanga

moninga nanga muana nzambe
fongola matoyi yoka nga
na yebi moto moko na biblia
kombo naye ezalaki joseph
ayinamaki na ba ndeko naye
etekamaki pene na kufa
kino ko memama na boloko
kasi lokola azalaki na nzambe
ndoto ya mokonzi biyano kaka ye
abimi na boloko premier ministre
na mbalamoko likonzi ya famille
ye wana azalaki eloko pamba
pona yesu azui motuya
pona yesu azui valeur
pona yesu akomi patron
pona yesu natieye cas
obongo nga na tika yeso yanga
oyo nzambe asali na bomoi nanga muana
ata lelo te un jour oko lata nzoto
aza sembo na maloba naye nzambe oyo
oyo alobi suka suka eko kokisama
na bomoi nanga
nkolo na sengi nayo
obombanga na maboko nayo
opesa ndenge olingi nanga muana nayo
ata bozui to bo zangi nga na talelayo
seyo seyo seyo
oooh ooh oooh

fololo nanga ya motema
na buakelaka mayi tango nionso
na linga yo pene na kufa
kota na motema pika ata po
mipepe ya monguna
ebenganate bolingo nayo
butu na moyi tongo pe pokoi
na wumela se pembeni yo
wee lelele baba liloba nayo
ebota misisa na motema nanga
na banzi lisolo ya lazalo
akufi ba kundi ba panzi matanga
oye na sima ya mikolo mineyi
na miso ya bato oye na r-t-rd
nzoka ozalaka jamais na r-t-rd
otelemaka moto ya suka
elikwa ya basantu

oyo nzambe asali na bomoi nanga muana
ata lelo te un jour oko lata nzoto
aza sembo na maloba naye nzambe oyo
oyo alobi suka suka eko kokisama
na bomoi nanga
bon berger losambo nanga ooh
obombanga na maboko nayo
opesa ndenge olingi nanga muana nayo
ata bozui to bo zangi nga na talelayo
oza nzambe nanga

oza nzambe nanga
yawhe na sanjoliyo elikwa nanga
iyelele nzambe na nguya
iyelele na banga ninio
iyelelele na lenga nini
iyeleleeeee

letras aleatórias

MAIS ACESSADOS

Loading...