letras.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

letra de motivation - mc-cool anguzo

Loading...

j’ai encore frappé yeah
mc-cool anguzo yeah chanty prod

na ebandeli nako loba trop te
po nayebi te so place nanga eza wapi
na motema yako encourager nga
to yako yina ba fans boloba nanu
na bandaki na molo-molo
so otali bien ma ndule est très bien définit
ba inspirations yako motiver bino
eza ebele donc eza infini
ndulemane faut opesa posa
inspiration esila te avant travail ekemba
musique eza yayo eza compétition te
mbangu pema lobi ekosimba
na sepelaka trop naba jeunes balukaka
yaya koluka eza code
après avoir ko déverrouiller porte ya souffrance
okoloba thank you my god
baye bakuta na mesa dépense tina te
chaque jour il faut ba bima
kolanda bango te ko yina bango te
tango mosusu eza komesana
ba timbela déjà que ata so tobebisi lelo lobi mbongo ekobima
dis-toi que nayaki na mokili kotika mutu te
un jour faut pe nabima zala motivé
ko passer journée na jeu ya dame te
heure moko esengaka mais heure nyoso te
galère ekosimbo ata muke te
so opassaka journée nase ya nzete te
vie nyoso yango oyo brouillon eza te
on ne sait jamais so lobi ekozala te so obebisi lelo
na futur kolela te tangu mutu yako sunga yo akozala te
musapi no ya munene eleka oya suka na mulayi te
keba oko bina faux vie ekotengama
oko risquer o bayeler avant okokisa posa no
obotami pauvre wana faute te
bats-toi kasi pour qu’un jour ozala bien
so pe okufi bongo lisumu
zakomba atiya tout na mokili zwa mayele
timbela nzete ya mbongo ezalaka te
ekosimba te so mayele eza te
ata ozwi lelo soki oyebi ko gérer te
je t’assure que okosala eloko te
richesse eza neti moto ya allumette
so obateli te yo moko okolela
imaginer tige ya allumette déjà eziki
so omekio pelisa ekosimba?
eza pe ndenge moko pona succès
emata mais jamais ekita nase
moto soki obeteli bien ata mbula enoki
jamais ekokita nase
depuis tobotama tomona pe trop
to copier ndambu ya mabe eleki trop
bolambu epolaka te tant que esengi kosunga
kobukana te sunga pe
bilengi ekomaka pe bololo
mokili tour à tour yoka lisolo
mingi ba swana mingi basunga te
mingi babomba te lelo bazangi
nyoso epesamelaka ko kamwa te
soki epesameli yo te ko forcer te
siama mituna nini nakoki o sala vraiment
po lobi nazala mandiant te
ndeko mwasi ko paniquer mingi te
libala soki eza yayo ekokima yo te
omona wapi ndeke akimi atiki mapapu naye
yayo akotika yo te
yanke ko tiya mwana ya batu jouet te
po o comprendre mutu mitiya na place naye
bae zwa mayele poche ne eza banque te
tika ye asala ya makoki naye
pona nga boswana nabino te
nalobi nangai kaka vérité
allons-y continuons nzela nabiso
totika bango bazali ba amoureux
but eza ka moko déjà boyebi
mc-cool anguzo aye ko motiver
kiekiekie mingi baseka bango
mais nasuka bango baseka trop
revenons à notre sujet ya mindule
rd congo mboka bénit monde eyebi
ba jeunes talents batondi
mais ba œuvres nabiso sur place bazo kiffer te
oh kisangani ba musiciens baza te
qui t’a menti que awa ndule eza te
d’après tout biso tout toa ba congolais
ko tala milieu te tala nde travail
ba jeunes talents bazo dur
nakati ya vie ya pasi pe boyebi yango
euh nasi nalobi pe mingi toleka sikoyo na étape ya refrain
yeah motivé naza motivé (motivé) motivé eh zala motivé (motivé)
motivé naza motivé eh na ndule ya mc-cool zala motivé
yeah motivé naza motivé (motivé) motivé eh zala motivé (momotivé)
motivé naza motivé na ndule ya mc-cool zala motivé

dieumerci kayumba garçon stylé djedje
champion nindjaindja
judo club boa
kamikaze
okapi
chrisp-ck wesh
seam
kodokan
cobra
ahh maître milikipito
champion dido cœur de lion

letras aleatórias

MAIS ACESSADOS

Loading...