letras.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

letra de température - marie misamu

Loading...

nani aza na thermomètre ya koyeba température ya molimo moto
nani aza na balance ya koyeba kilo ya vie ya moto
nani aza na mètre oyo eko lakisa molayi ya molimo ya moto yeye
nani akoki kotimola libulu molayi mpo ayeba mozindo ya molimo moto
bobele yesu

wapi université oyo eza na mateya ya kokamba vie ya molimo ya moto
wapi parlement oyo ekoki ko siéger pona ko voter ba lois ya molimo ya moto
wapi gouvernement oyo eza na ba ministres ya kokamba hum vie ya molimo moto
wapi mboka oyo eza na roi to regner ya kokamba vie hum ya molimo ya moto
bobele yesu
nani aza na site internet ya ko permettre biso
to naviguer pona toyeba vie spirituelle ya moto

mosusu okomona moto likolo, likolo lokola moto ya masumu
ye wana nzambe aza kolinga
mosusu okomana ye akotambola na logome elamba epasuka
ndeko keba minister monene

tuna mikonzi minene ba fanda na kiti ya bokonzi
ba wuta wapi ?

okomona babeteli yo porte basengi yo mayi ya komela
ndeko koboya te
mosusu babengana ba ange na porte na bango
yesu soki afungoli yo miso mpo omona vie ya moto okoki kof-kamela ye
ah ngai
bible eloba éthiopien a changaka peau na ye te
leopard mpe a changaka ba taches na ye te
lelo moninga pamba oyebi lobi na ngai te yesu azo mona ngai moto monene
ah ngai

yo moninga malade yesu azo mona bien
yo moninga mobola yesu azo mona ngai riche
likolo ya ba sentiments na yo obengi ngai moto na masumu
ah yeye yeye ndeko eh
ko juger ngai te
ko juger mpe ngai te
oyebi lobi na ngai
oyebi pe vie na ngai te
nani akoki kotombola libanga abamba muasi oyo akueyi na ekobo

likambo yango nini lelo basali ya nzambe
nzambe moto atia bango na eklezia na ye
mik-mba oyo bamemaka soki bapesi ndeko okokoka te
babengaka bango ba fou na kati ya ecclesia, ba blessés de guerre
ba grand coopérant na makambo ya eklezia, ba koko ya suka mboka ma
bilamba epatuama na kati ya eklezia

marie magdala asopi malasi na ye ya motuya na makolo ya yesu
neti babengi ye ndumba
nzoka ye nde amonaki lisekua ya yesu liboso
nakotambola moto likolo na kobeta tolo

ndeko na ngai oh ne jugez point
ne jugez point
ndeko na ngai ne jugez point mpo ba juger yo te
ne jugez point
tika nzambe a juger basali na ye
tika nzambe a juger bato na ye
tika nzambe a juger bana na ye

letras aleatórias

MAIS ACESSADOS

Loading...