letras.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

letra de kanga nga photo - josé nzita

Loading...

moto oyo!
moto oyo azangelaka
(iye lele)
ye akufaka te
(eê kino ye)
kino ye ako koma
(iye lele)
bongo nde ako kufa

batekaki ye na ba ndeko na ye
bayebaki tina te
nzioka nde na kati na nzoto na ye promesse ezalaki
tango nzala eyaki na mboka
balukaki ya kolia
bakendaki kogumbamela joseph na mboka ezipito
kasi bayebaki te wana leki na bango
lisakoli ekokisami
moto oyo!
moto oyo azangelaka
(iye lele)
ye akufaka te
(eê kino ye)
kino ye ako koma
(iye lele)
bongo nde ako kufa

batindaki moto apakola mokonzi na ndako ya isaï
ba bimisi mibali ba vimba ba pake
mokonzi azalaki te
ye wana na zamba azali kobima na solo ya ba mpate
muana moke oyo david mokonzi
lisakoli ekokisami

moto oyo!
moto oyo azangelaka
(iye lele)
ye akufaka te
(ako kufa te, kino ye)
kino ye ako koma
(ako simba)
bongo nde ako kufa

lolenge moko mpe simeona
azalaki na elaka
ti tango akutanaki na mokonzi
simeona akufaki
ngai pe josé na kokufa te
kino nako mona ngo
oyo nzambe alobela ngai
kino nako simba ngo
ngai josé!

ngai oyo nako kufa te
kino nako mona ngo
(oyo nzambe aloba)
oyo nzambe alobela ngai
kino nako simba ngo
(kanga photo)
kanga photo
mona ngai bien
lobi okokamua ngai
(mpo ete na nzoto oyo)
mpo ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli
alléluia!

paroles: que les saints disent amen!

penina mpe asekaki mingi anna
mpo azangaki kobota
kasi na tali na makomi na nzambe
namoni muana ya penina te
samuel ye wana nganga monene
lelo tok-misaka nzambe
nionso oyo oza komona na bomoyi na yo lelo
eza mpona kembo na nzambe
ngai josé!

ngai oyo nako kufa te
(iye lele)
kino nako mona ngo
(oyo nzambe aloba)
oyo nzambe alobela ngai
(iye lele)
kino nako simba ngo
(ôô kanga photo)
kanga photo
mona ngai bien
lobi okokamua ngai
mpo ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli

kobuaka te oyo afandi pembeni na yo
mpo yebi nano te
tango mosusu ye nde lipamboli na yo
kobuaka ye nano te

yo oyo babuaki
kolela lela te
loba kanga se photo
bomba na ndako na yo
obimisa lobi
oko betela ngai maboko
mpo oyo nionso baza koloba na bomoyi na yo
mpo bayebi nano te

ngai josé!

ngai oyo nako kufa te
(iye lele)
kino nako mona ngo
(oyo nzambe aloba)
oyo nzambe alobela ngai
(iye lele)
kino nako simba ngo
(ôô kanga photo)
kanga photo
mona ngai bien
(ôôêê)
lobi okokamua ngai
(mpo ete na nzoto oyo)
mpo ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli

kosopa semi ya lipamboli na yo te
mpo nano yo omoni te
mpo tango mobali apesaki yo semi
bozalaki se bino mibale
eê kanga matoyi
koyoka moto te
oyo kaka se nzambe
mpo ye nde asimbi bomoyi na yo
mpe na tango na maboko na ye êê

ngai josé!

ngai oyo nako kufa te
(iye lele)
kino nako mona ngo
(oyo nzambe aloba na ngai)
oyo nzambe alobela ngai
(iye lele)
kino nako simba ngo
(ôô kanga photo)
kanga photo
mona ngai bien
(iye lele)
lobi okokamua ngai
(mpo ete na nzoto)
mpo ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli

ko ko ko ko k-mama

aâ k-mama
(ôlele)
nzambe na ngai
(olelele)
mokokisi na elaka

k-mama k-mama yesu na bomoyi

aâ k-mama
(iye lele)
nzambe na ngai
(olele)
ozali na yo nzambe

yembelaka ye nzambe oyo

aâ k-mama
(iye lele)
nzambe na ngai
(olele)
solo yo obonguani te

iye lele lele lele k-mama k-mama
eê nzambe oyo
eê eza bongo

(kanga photo)
kanga photo

ââ bomba yango

letras aleatórias

MAIS ACESSADOS

Loading...