letras.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

letra de non - franco luambo

Loading...

instrument
libala o libala eeh
libala o libala haha oo yoyo
mabala toko balaka na kinshasa eh eh
mabala tobalaka na mokili eheheh
oko linga mwasi, mwasi azali na ba doute
nzoka olingaki ye mokolo ya liboso omonaki ye
ayebaka to oh oh maman eh eh
luambo
mwasi ayebaka sima eh hm
soki ozalaki ko lingaa ye
ba geste azalaki kosalela yo
akoya ko yeba yango sima eh
wana okomi na maboko ya moto mosusu
bolingo nzambe a tinda na mokili
motema elinga oyo elingi
motema eboya oyo elingi
oyo ako boya yoo kanga maboko eh eh eh
madilu
mokolo ya libala eh
ba famille bapanzani po ba kabola
ba invitation
basi ba koya po ba tala
mwasi nini obali, mibali bakoya po ba tala mobali nini mwasi abali
eh eehh
ba famille ba panzani po ba kobala
ba invitation
basi ba koya po ba tala mwasi
nini obali
mibali bakoya po ba tala
mobali mwasi a bali
eh eeh eheeeh yeye hm
luambo
mokolo ya libala
nakanisi to bengaka ba invite
poba yako tala biso
po ba yako pesa biso ba conseille
po baya kopesa biso mabokoе
madilu ba oyo otangeli ngai
bako yaka pona kosala mobulu
mibali bakoya pona ko lula mwasi abali
basi bako ya po ba yako lula mobali
simaba tiyela bango dongo dongo
bandeko еh eh eeeh
eh ehhh yeye um
madilu
na lukeli nzoto na ngai ngambo eh
no yokosi nzoto na ngai soni eeh
madilu eh yeye oh system ooh
mbala ya liboso mwasi aka beli ngai kombo ya non
na susumuki ngai na komi juste oh
maman
eh ehee
mbala ya liboso mwasi akabeli ngai
kombo ya non
na susumuki nga na komi juste oh
maman
eh eeh, eh eeh yeee
luambo
aboyaki naye ba ndeko eh
akweyi kozala na mobali ya bato
alingi azala na mobali yaye moko
a monaka ye soki tongo etani
a tala tango akendeke na mosala
a boyi ko zwa mobali oyo ako yelaye
22 heures akei
minuitakei
2 heures du matin akei
na bondeli ye nase ya motema ah
alobi na ngai boye
akoki ko linga mobali ya botote
po ye azalaka na zuwa mingi eh
nalobi napesa ye mosolo
alobi na lingi ko tendtre ye ba piège
na bomba ako zwa mbala ya sima
eh
eh yeywyeeee
madilu
likambo nga na kamwaka oh
soki mwasi ba kabwani na mobali eh
ako zwa kamarade po ba tambolaka naye
kamarade ako zwa asala la vie kalaa maman
eh eheee
soki mwasi ba kabwani na mobali eh
akozwa kamarade po ba tambolaka naye
kamarade akozwa asala lavie kalaa maman
eh eheeee
soki mwasi ba kabwani na mobali eh
ako zwa kamarade po ba tambalaka naye
kamarade ako zwa asala ta vie kalaa
maman
eh ehee, eheh yeye
luambo
madilu ngai na ka mwaka eh
soki mwasi auti kobama libala sika
ako kenda ko zwa kamarade ya ekoko tiniye
oyo asala la vie kala
ako tambwisa ye ba nzela nyoso
akobima naye be pai mibali ba bimaka eh
a ko kotisa ye ba nganda nyoso
soki na gauche ye mpe akei na gauche
soki na droite ye mpe akei na droite
soki na rond point ye pe atelemi
moyi esilela ge na nzoto eh
mbula enokela ye na nzoto eh
malili ezwa ye ata na panzi akipate
nzoka mwasi ya bato
ba sali separation de corps
lobo lobi ba koki ko zongane eh
madilu
libala oh libalaaa
ewumulite libala elumbi soloo
maman
mwasi abalaki akomi na maboko
ya ba invite
mobali abalaki akoteli mwasi
ya ndumba na libalaa
ehh, eheh yeyeee
luambo
madilu ngai na ka mwaka eh system
mokolo ya invitation
ba invité ba yeli ngai ba cadeau empoisonné
ba pesi mwasi na ngai ba addresse
na envelope
tango to komi na ndako
to lobi to depuiller ba envelope ayo eh
to kuti ba addresse kili kili eh
na ba addresse ya ba ami ya motema eh
na sali bango nini eh
na bengaki ba ngo mpo baya to sepela eh
ba sali ngai dongo dongo ba ndeko eh
eh eh yeyeyeee
madilu
likambo ngai na tunaka oh
nzela ya basi misato ebongaka te
ebongi batambola mibale po ba
yokana maman
eh eheee
nzela ya basi misato ebongakate
ebongi ba tambola mibali po ba yokana maman
eh eheee um
eh eh yeyeyeeee um
luambo
ata batamboli misato eh
ata ba tamboli mibala
songisongi elaka bango ba ndeko eh
kotongono bi pai na bi pai eh
ko fingana bipai na bi pai eh
ko inanana bipayi na bipayi
soki otuni bo swanaki pona nini?
oko yoka ma kambo mike mike
oyo bana kuta ba koki ko juge
yango bino basi nzambe asana bina lolenge nini eh
bo koki ko tonga mboka te eh eh yeyeyeee mama eh eh yeyeyeee

letras aleatórias

MAIS ACESSADOS

Loading...