letra de matata na mwasi na mobali esilaka te - franco luambo
oh oh nasali nini oh?
senzela mwana moninga ozui ngai na mpasi
batela ngai na ntango likambo bamona
bondela ngai soki nasaliki
mwasi alingaka présence ya mobali
oh tokabola faute
mabe ebandi na yo, mpe na ngai
lokola bato bayebi toluka équilibre
senzela mwana ya bato
bondela mwana ya bato
chorus
matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama
oh mama, mama ah!
likambo nini nzambe osala biso mibali
tosalelaka basi
bango baliyaka, balataka
biso mbula mobimba patalo moko na nzoto
chorus:
matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama
oh mama, mama ah!
mama aboti ngai mwasi
oyo akoniokola ngai mwasi
nzambe apesi ngai etumbu
nabotaka basi bandeko
bananiokola bana ya bato
nayoka motema mpasi bandeko
oh oh mama, oh mama mama
chorus:
matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama
oh mama, mama ah! oh mama
soki abimi azongi, kotuna epayi awuti te
soki yo okendeki ko traiter ba affaires
olobi ozonga, olia, opema
akomi kotuna yo
ozalaki wapi, owuti wapi, balobaki boye
mwasi nabala na mosolo, nani apesi ye autorisation
atuna epayi na wuti bandeko
oh oh mama, oh mama mama
chorus:
matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama
oh mama, mama ah!
franco solo 4
likambo nini
adamu olataka ndambu ya liputa
eve akosaki yo
biso tomonaka bwale
oh mama, mama ah
chorus:
matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama
oh mama, mama ah!
oleka awa basi
oleka kuna matata bandeko
bino basi, basi bandeko
bino nde bokoboto biso
bino bokobokola biso
bino moko bokobala biso
bino moko bokoniokola biso
tokosalala nini bandeko
obalani yo na mobali
matata mikolo nionso yonso na ndako
mpo na nini boye
oh oh mama, oh mama mama
chorus :
matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama
oh mama, mama ah!
likambo nini nzambe osala biso mibali
tosalelaka basi
bango baliyaka, balataka
biso mbula mobimba patalo moko na nzoto
oh oh mama, oh mama mama
chorus:
matata ya mwasi na mobali esila te na mokili mama
oh mama, mama ah!
mwasi akoki koloba na yo
azali na mpasi na lib-mu
yo osilisi mbongo bandeko
na medicaments na pharmacie
nzoka azali kokosa yo
ayebi sekele na ye bandeko
oh oh mama, oh mama mama
letras aleatórias
- bette midler › letra de finale - bette midler
- genuine panama › letra de no good - genuine panama
- n a o quelly › letra de jealous - n.a.o. quelly
- via vallen › letra de joget jaranan - via vallen
- we are fiction › letra de earth medicine - we are fiction
- mc barage ft mc reich mc drill › letra de plastic ideals - mc barage ft. mc reich, mc drill
- marta daddato › letra de dissing anna pepe - marta daddato
- 7 11 jesus › letra de sharon - 7-11 jesus
- roman kayz › letra de hae - roman kayz
- coyote theory › letra de this side of paradise ( slowed & reverb ) tiktok version - coyote theory