letras.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

letra de louanges retro remix - collectif kembo na yahwe

Loading...

nkolo asungi nga kati na minioko (oh, asungi ngai na minioko)
nkolo apesi nga kimia na motema (nkolo, kimia na motema)
nkolo apesi nga bomoyi na seko (apesi nga lisusu bomoyi na seko)
tala tina (tala tina, tala tina)

tokokota lola te pona koyemba eh
tokokota lola te pona molato eh
ndeko tokomona nzambe te pona kitoko eh
se mitema tobongisa yango
yesu masiya azua esika moyo eh
o moyo batata moyo (lok-mu ezonga epayi na yo yawe)
o moyo bamama moyo (mosusu lokola yo azali te yesu)
o moyo bilenge moyo, ka minlele ko (toyemba banso pona lok-mu na papa)

o moyo batata moyo
o moyo bamama moyo
o moyo bilenge moyo, ka minlele ko

il est jehovah jiré, celui qui pourvoit
il est jehovah nissi, ma banière
il est jеhovah shalom, le dieu de paix
il еst jehovah rapha, il m’a guéri

il est le roi des rois
botika na yembela ye
na manso asali na nzoto na nga
nakoki te baninga kobomba yango oh yesu eh

oy’a nga natie na motema

nzambe ozali nzambe ya tango nionso
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
obomba nga na loboko n’o monguna azua nga te oh
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
babalaka te bakoma kobala oza monene
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
na bitumba na butu na moyi eh, elohim oza présent
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
nzambe na litasi opesi schekina oza kosala
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
jésus, tu es le même hier, aujourd’hui et éternellement
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
okomisa invisible liboso ya banguna
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
ah nga nakotatola partout bikamua na yo yesu oyo nga nakobima
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
nabomba n’o wapi ata na mayi, yesu oza présent
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
basantu tomba bamona na mpwasa loboko na yo
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso) oza nzambe
kembo na yawe, alleluia eh, alleluia eh
(nzambe ozali nzambe ya tango nionso)
tosengi na nzambe apambola
pambola eh nzambe apambola lingomba na ye
tosengi na nzambe apambola (pambola)
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye (pambola lingomba na ye)

(partiе en kiluba)

tosengi na nzambe apambola
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye

loboko na yo yawe tokosenga na congo oyo
molimo na nguya nzambe kitisa
nzambe pambola, nzambe pambola lingomba na yo

tosengi na nzambe apambola
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye

(partiе en tshiluba)

tosengi na nzambe apambola
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye

(partie en kikongo)

tosengi na nzambe apambola (pambola congo)
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye (pambola mboka na nga, pambola eclesia na yo)
(partie en swahili)

tosengi na nzambe apambola
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye

tu es le dieu de paix, tu nous donnes ta paix
nous célèbrerons ton nom emmanuel aujourd’hui et à jamais

tosengi na nzambe apambola (apambola nga)
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye (apambola congo)

elanga na ye ezali monene
kasi basali bazali moke
tosengi na nzambe atinda basali na mosala na ye

tosengi na nzambe apambola
nzambe apambola eh nzambe apambola lingomba na ye

napesa yo nini
nzambe na nga napesa yo nini (oh napesa yo nini eh)
nzambe na nga napesa yo nini (nkolo nga napesa yo nini eh)
nzambe na nga napesa yo nini (oh napesa yo nini eh)

nga nalandaki bisengo ya mokili oyo
nga na yebaki te nini nasala nzambe
ngolu na yo pe bolingo na yo nzambe
ekomisi nga ekelamu ya sika
oh nzambe, yo nzambe otonda na mawa
k-mama yo elonga na nga

oh napesa yo nini
nzambe na nga napesa yo nini (okangoli ngai yahwe)
nzambe na nga napesa yo nini (yo nde libanga ya ntalo yahwe)
nzambe na nga napesa yo nini (yo elonga na nga papa)
nzambe na nga napesa yo nini

nkolo soki maloba ezangi ngai nakozua zéro
ata na kindoki bayebi y’osaleli ngai ya mingi
lelo nabelemi epayi na yo papa
opesi nga kimia na motema
nkolo namitiki na maboko na yo nkolo yesu eh
opesi ngai libota monene

nzambe, nzambe
nzambe na nga napesa yo nini (nzambe na mawa)
nzambe na nga napesa yo nini (alleluia eh)

alleluia tok-misa yesu masiya
hosanna nkembo na yawe na se mpe likolo
alleluia tok-misa yesu masiya
hosanna nkembo na yawe na se mpe likolo

tok-misa yesu masiya pona bolingo na ye
toyembela mwana na mpate na likinda
atikaki lola aye kopesa bomoyi na seko

kembo na yesu mokonzi na bakonzi
mabolongo nionso engumbamela yawe
mingongo nionso enganga kembo lok-mu na yawe

alleluia tok-misa yesu masiya
hosanna nkembo na yawe na se mpe likolo

bana na nzambe toyembela mokonzi
bapapa nionso, bilenge pe bamama
tobeta maboko, tobinela yepowa nzambi eh

alleluia tok-misa yesu masiya
hosanna nkembo na yawe na se mpe likolo

(animation…)

letras aleatórias

MAIS ACESSADOS

Loading...