letras.top
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

letra de tout est vanité - charles mombaya

Loading...

[couplet 1 : charles mombaya]
bakongo na kin basala bamambu na ba quartiers
mivé john na ndjili pe na ngiri-ngiri, zabara
bakombo lel’oyo etikala se na histoire eh

[couplet 2 : tambwe teach]
babuka na banque batia mouvement na kinshasa
basala bampungu babunga na kati ya boloko
angwalima wallace kombo etikala se na histoire

[couplet 3 : charles mombaya]
basala bakisi bazua bambonga moyeke
batonga bandako basomba bampeko na kinshasa
mingi bakoma kotambola na mosuni ya bata
[couplet 4 : tambwe teach]
balela ba ambiance basala mabala na banganda
congo bar lel’oyo ekoma esika ya losambo
ba vendredi ambiance ekoma n’ango prière eh

[couplet 5 : charles mombaya]
bakenda na lunda basusu bateka misapi
batondi na mbongo bakoma na basi ebele
kasi kimia ezangi bango kati ya mabala eh

[couplet 6 : tambwe teach]
balongwe na kin bakei kofanda na mikili
bakomi minene bakomi kotuta monzele
kasi kimia na mitema еzangi bango eh

[couplet 7 : olivier kalabasi]
salomon alobaki na se oyo ya bato
zua na yo mbongo tuna na yo ata na bomengo
nionso tokomona еza n’ango kaka vanité
bomoyi ya solo eza vraiment kati na yesu eh

[couplet 8 : charles mombaya]
tika napesa elikia na yesu masiya
alobaki akopesa na oyo akondima ye
kimia oyo bakoki kosomba na mosolo te
nazui mokano lel’oyo nakobila ye eh
[refrain : tambwe teach]
vanité, vanité, nionso se vanité
bomengo ya solo eza na masiya eh

[refrain]
vanité, vanité, nionso se vanité
bomengo ya solo eza na masiya eh

[couplet 9 : chimène manzambi]
okoki kotonda na yo na bomengo na se
kimia oyo masiya akopesa okosomba te

[refrain]
vanité, vanité, nionso se vanité
bomengo ya solo eza na masiya eh

[couplet 10 : lina ngoya]
basomba bandako na bampeko misolo ebele
kasi mitema na bango tango nionso eza troublés

[refrain]
vanité, vanité, nionso se vanité
bomengo ya solo eza na masiya eh

[couplet 11 : olivier kalabasi]
yaka na yesu moninga y’okozua na ye
kimia oyo bakoki kosomba na mosolo te
[refrain]
vanité, vanité, nionso se vanité
bomengo ya solo eza na masiya eh

[couplet 12 : jerry lewis mbuyi]
salomon alobaki vraiment na mokili ya se
nionso tokomona eza n’ango kaka vanité

[refrain]
vanité, vanité, nionso se vanité
bomengo ya solo eza na masiya eh

[refrain]
vanité, vanité, nionso se vanité
bomengo ya solo eza na masiya eh

letras aleatórias

MAIS ACESSADOS

Loading...